Top Songs By Louange des Stars
Similar Songs
Credits
AUSFÜHRENDE KÜNSTLER:INNEN
Louange des Stars
Künstler:in
KOMPOSITION UND LIEDTEXT
Louange des Stars
Songwriter:in
Lyrics
Natatola kombo ya lobiko, bipai biyano ngai bikowuta
Natiola na mbonge ya mayi ya bomoi, Yesu
Nasimbama na oyo aleki nionso, Yesu
Nazala esengo na yo mpona seko
Oyaka na elikya bipai kondima esuki, oh Yesu
Yo nde moyi ya tongo ekimisaka butu na ngai
Bipai ezali Yo nde bisika obongisi po na ngai
Mpo ete oyo Y'ozali nde osali pe ngai nazala
Mokonzi merci mpo na lobiko
Mpe bomoi ya seko y'opesi na bangumbameli na Yo
Natatola kombo ya lobiko, bipai biyano ngai bikowuta
Natiola na mbonge ya mayi ya bomoi, Yesu
Nasimbama na oyo aleki nionso, Yesu
Nazala esengo na yo mpona seko
Bilaka na Nzambe bikomi bozui na ngai po na Yo
Esengo na ngai nayeba ete Y'ozali Nkolo na ngai
Osopi bolingo na Yo na motema na ngai, mwana Nzambe
Y'ofungoli bikuke ya bosantu bwa Yo mpo na ngai
Y'osangisi bonzambe na bomoto bwa ngai, oyo ngolu
Mokonzi merci mpo na lobiko
Mpe bomoi ya seko Y'opesi na bangumbameli na Yo
Mokonzi merci, Y'obengi ngai na kombo na Yo, mosantu
Obengi ngai moninga na Yo, nayeba nionso okosala
Opesi ngai loboko na Yo nasimba mpo nabunga te
Mokonzi merci mpo na lobiko
Mpe bomoi ya seko Y'opesi na bangumbameli na Yo
Natatola kombo ya lobiko, bipai biyano ngai bikowuta
Natiola na mbonge ya mayi ya bomoi, Yesu
Nasimbama na oyo aleki nionso, Yesu
Nazala esengo na yo mpona seko
Natatola kombo ya lobiko, bipai biyano ngai bikowuta
Natiola na mbonge ya mayi ya bomoi, Yesu
Nasimbama na oyo aleki nionso, Yesu
Nazala esengo na yo mpona seko
Alléluia
Esengo ya ko simbama na oyo asimba nionso, alléluia
Mokonzi asimba likolo, asimba pe sé
Ofandisi ngai kati na bonzambé
Opesi ngai bomoyi ya bosantu pe osimbisi ngai bendele ya balongi
Ndenge nini nakauka maloba pe masanjoli pona Yo mokonzi?
Zua lokumu Yésu, alléluia, alléluia
Writer(s): 0, Katoto Antoine
Lyrics powered by www.musixmatch.com