Lyrics

Ourouya Yayi mabuu Wechooo Bamekaka mosapi na mozindo te dit Tuna tuna liteya na PDG Maka Libala oh libala Tuna nsango oh mama Tuna nsango basopela yo nde masolo Bakulutu babala kala Bayebi nde makambo Ba parents babota biso Bayebi nde sekeleee Likwela eloko mususu mamaaaa Kuluzu ya likambo okomema Oyebi ata mbondo te Tuna nsango Likwela ooo Ezali eloko basalaka Na motema mbangu te Ebongi omitala okanisa Solo soki okoki eh Ezali te obala lelo Po lobi bokabwana Likwela eloko mosusu Godet Mayenga Moto bokovanda na ye Ti suka ya molongo Moto akobotela yo nde bana Soki olie otondi te Komeka mosapi te na mozindo Soki yo nde nga na poni Ozala ozala espérance Ya ndako na nga Nakosenga bambonge te Po towumela Soki yo nde oyo nzambe atindeli nga Ozala ozala mopanzi na nga gaudet Nakosenga bambonge te Po towumela Ooo ma ma ma Muasi ya kobala batalaka na bizaleli Ata akotakata Ata akongenga lokola miondo Ata akoloba lokola mompe Mobali akopesa motema Ye ye Basi misusu bazali yako bala te Ako lukela yo makambu na famille eh Ako lukela yo makambu Epayi ya baninga na lisanga Soki yo nde nga na poni Ozala ozala espérance Ya ndako na nga Nakosenga bambonge te Po towumela Soki yo nde oyo nzambe aponeli nga Ozala ozala mopanzi na nga gaudet Nakosenga bambonge te Po towumela Nalobi eh maso ya motema na nga Po bobalana esengeli boyebana Nalobi naleli nasembeli nzambe Apesa nga oyo ya ngai ya mosantu Po te ozala oyo ya nga suka wa nzo Nalobi naleli nasembeli nzambe Apesa nga muasi akoki na nga Akotika nga te na bana po ye akenda Nabanzi bana eh pasi ya likwela ooo Vieux Tete nasembana Eko mulemba Jean Jacques viva Ingénieur Luamba Yoka dit Awulule eeeeeh Awulula aaaaah Eeeeh cadence Olele kitoko Olowu Y'a molokaii eh Ezalali misapi ya caien madoka eh Clara de Bruxelles Ado buchari Lelo lelo lelo lelo ekomi lobi Lobi lobi lobi lobi ekomi lobi kuna Match eza te ya pas match Match eza te match eza te One Two
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out