Lyrics

Ekoki pe ko ndimama
Il était une fois Angie et puis, plus rien
Angie à quoi donc, veux-tu que je serve?
Si je cesse d'être la moitié de toi
Personne n'envie mon sort
Missa ya mawa, oh, baninga, ye-eh
O'ya nga messi ya mawa, sango n'amour na nga
Nani ako yambela nga? Eh
Missa, ah, ya mawa, Djo Bakali, Tonton Fila
Oyo yanga messi ya mawa, sango n'amour na nga
Willy Carlos yembela nga, ah-ye
Azalaki awa ya bongo butu ékota na mboka, ntongo banda etanaki
Ata elembo te na nzembo akeyi, eh-eh
Azalaki awa, akomisaki bonheur mystère na nga
Ntongo banda étanaki, ata elembo te na nzembo, akeyi, eh-eh
Mmm, oleki wapi? (Ah-hein) o bombani wapi? (Ah-hein)
Yaka ko boma, moto oyo opelisaki, yaka kobuka, ba murs ya boloko na ngai
Naboyi na zala mwana mawa na mboka bisengo
Moto ata batikaka ye (ah-hein) na lilita Angie (enh, han-hein)
Un jour ba memelaka ye, mwa bouquet de fleurs, yo moko otiaki pont
Entre ngai na paradis, lelo na komi, na kati-kati
Boni y'okomi kokoma moselu na maboko ma nga, ma yo, oh
Mmm, mwana mama olobi nini? Ko, oh eyala
Nga n' Abidjan, est-ce que oponeli nga vraiement liwa? Loba
Mwana mama est-ce que oko zonga jamais Ici?
Nga naza kâ olingi nini na sala? Eyala, ah, ha-ha-ha, ah
Amour 'ango, est-ce qu'eza ye? Motema est-ce qu'oza sûre?
Mikolo ebele eleki awa, ozo mitungisa, ah, se pona ye
Mmm, moko, moko, eh-eh, mayi ya miso na nga
Nazo bomba na molangi mpo omona pasi na nga, jour okoya, ah-ah
Pene, pene ya aéroport nga na tongi mwa ndako
Mwa kikuba pona na tala mpepo ekoya na yo, jour ango, oh-oh
Avant Angie dans mon cœur, il y avait de la place pour cinq, six, dix amours
Depuis que tu es venu, dans ma vie, Angie, mon coeur paraît bien petit
Pour contenir, tout l'amour que je porte
Reviens
Alingi nini?- Alobi nini? Osala nini? Hein
Oloba te, oseka te, oningana te, eh
Pourquoi, pourquoi toujours nga? Ekozwaka se nga
Amour okutaki nga moto, ekomi yo kende otika nga
Kizengi mawa, kisimbi tristesse, eh-eh
Ah, alingi nini? Alobi nini? Osala nini? eh-eh
Oloba te, oseka te, oningana te, einh
Pourquoi, pourquoi toujours nga? ekozwaka se nga
Amour okutaki nga moto, okomi okende otika nga
Kizengi mawa, kisimbi tristesse, eh-eh
Le, hu-hu, le, hu-hu
Le, hu-hu, hu (le, hu-hu, hu)
Lokola nzoto eboyaki elamba ko bosana ngai te
Oko kenda na courier, Angie nga motema, eh
Kobonga te, eh-hein na kotika na nga kolela se mokolo okoya, eh-eh
Bolingo na yo eyaki na ko nguluma, lelo ememi nga na mokongo
Ekomi ko kenda na nga na ba nzela oyo ngai nanu na lekaka te
Mopepe elekaka, ekombelaka nga lopango
Kasi yo banda oleka, olona mbonge na motema na ngai, hein-hein-hein
Kitoko oyo eleki yo, kolula ekomisi ngai lokola analphabète
Ba mots d'amour, ekomi pasi, eh, yango na nzembo na nga, au lieu des mots
J'ai mis mon cœur, bolingo na nga na boyi esuka lokola ndoto ya baba, eh-eh
Présence na yo ezali fertile, Angie zonga, ah-han
Le-hu (le-hu)
Le, hu-hu (le, hu-hu)
Le, hu-hu-hu (le, hu-hu-hu)
Moko, moko, eh-eh, mayi a miso na nga
Nazo bomba na molangi mpo omona pasi na nga jour okoya, ah-ah
Pene pene ya aéroport, nga na tongi mwa ndako
Mwa kikuba pona na tala mpepo, ekoya na yo, jour ango, oh-oh
Tabu Ley yembela Koweit, yo Lutumba yembela Koweit
Pépé Kalle, Madilu, Josky, Lai Lai, ye méneur y'empire
Werason, J.B Mpiana, Reddy, Mbilia Bel, Tshala Mwana, Déesse
Mmm, le-hu (le-hu)
Le, hu-hu (le, hu-hu)
Oh, mwana matongi, eh
Oh mon ami Jésus
Written by: Koffi Olomidé
instagramSharePathic_arrow_out